Matthew 3

MABONGISI YA MOSALA YA YESU

Jean Batiste ntoma ya Nzambe

1Na mikolo wana, Jean-Batiste ayaki mpe abandaki koteya na esobe ya Yudea.

2Azalaki koloba boye :

—Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene !

3Ezali ye nde moprofeta ezayi alobelaki : Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe :
Bobongisa bala-bala ya Nkolo,
bosalela ye banzela oyo etengama te !

4Jean azalaki kolata bilamba oyo basala na bapuale ya shamo, mpe mokaba ya mposo ya nyama na loketo. Azalaki kolia mabanki na mafuta ya nzoyi. 5Bato bazalaki kowuta na Yeruzalem, na Yudea mobimba mpe na bapembeni ya mayi ya Yordani, bazalaki kokende epai na ye. 6Bazalaki koyambola masumu na bango, bongo Jean azalaki kobatisa bango na mayi ya Yordani.

(Lk. 3.7-9)

7Kasi tango amonaki ete bafarizeo mingi na Basaduseoo bazalaki koya kozwa libatisi, alobaki na bango :

—Bino libota ya banioka ! Nani akebisi bino ete bokima kandaoyo ezali koya ?
8Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo babongoli mitema. 9Bokanisa te ete bokoki komiloba : “Abraham azali tata na biso !” Pamba te nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo
Mikanda misusu balimbolaki boye : Nzambe akoki kobongola mabangaoyo ekoma bana ya Abraham.
.

10Epasola komi esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ye malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto.

(Mk. 1.7-8 ; Lk. 3.15-18 ; tala Jn. 1.24-28)

11—Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bosiʼbobongoli mitema. Kasi moto oyo akoya sima na ngai, aleki ngai na nguya mpe nakoki kutu te komema basapato na ye ; ye moto akobatisabino na Molimo Mosantu mpe na moto. 12Asimbi kiyungulu na maboko na ye, mpe akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma ; mpe akobomba ble
Ble  : ezali molona oyo ekokani lokola loso ; basalelaka na yango farine.
na ebombelo na ye ; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te !

Yesu azwi libatisi

(Mk. 1.9-11 ; Lk. 3.21-22 ; Jn. 1.29-34)

13Yesu awutaki na Galileya mpe ayaki na Yordani. Ayaki epai ya Jean mpo na kozwa libatisi. 14Kasi Jean alingaki kopekisa ye, mpe alobaki na ye :

—E e ! ezali ngai moto nalingaki koya kozwa libatisi epai na yo, kasi yo oye epai na ngai !

15Kasi Yesu azongisaki :

—Tika ete ezala bongo sikʼoyo ! Pamba te, ezali na lolenge oyo nde ekoki na biso kokokisa bosembo nyonso.

Bongo Jean andimaki.

16Tango Yesu azuaki libatisi, abimaki na mayi, likolo efungwamaki, mpe amonaki Molimo na Nzambe azalaki kokita lokola pijon, mpe ayaki likolo na ye. 17Mpe mongongo ewutaki na likolo elobaki :

—Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi !
Copyright information for LinMNB